Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:47 - Mokanda na Bomoi

47 Moto oyo azali ya Nzambe ayokaka makambo oyo Nzambe alobaka ; kasi soki bino boyokaka te, ezali mpo ete bozali ya Nzambe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:47
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ebele bakopetolama, bakozanga mbeba mpe bakokoma bato ya kokoka ; kasi bato mabe bakokoba kaka kosala mabe. Moto moko te ya mabe akososola, kaka bato oyo bakozala na bwanya nde bakososola.


Moto oyo aboyi Ngai mpe ayambi te maloba na Ngai azali na mosambisi na ye : ezali liloba oyo nateyi nde ekosambisa ye, na mokolo ya suka.


Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.


Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;


Alobaki lisusu : — Yango wana nalobaki na bino : « Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki epesameli ye te na Tata. »


Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami ; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai.


Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.


Kasi Ngai, lokola nalobi solo, yango wana bozali kondima Ngai te.


Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe ; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.


Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ