Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : — Soki tolobi : « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu : « Bongo mpo na nini bondimaki ye te ? »
Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.
Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango : — Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.
Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,