45 Kasi Ngai, lokola nalobi solo, yango wana bozali kondima Ngai te.
Pilato atunaki : — Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ? Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai.
Mokili ekoki koyina bino te ; kasi Ngai, ezali koyina Ngai mpo ete natatolaka ete misala na yango ezali mabe.
Nani kati na bino akoki kotalisa Ngai ete nasali masumu ? Soki nalobaka solo, mpo na nini bondimaka Ngai te ?
Boni, nakomi sik’oyo monguna na bino mpo ete nazali koloba na bino solo ?
mpe lolenge nyonso ya mabe, mpo na kokosa bato oyo bazali kokende na libebi, pamba te bayambaki te bolingo ya bosolo oyo esengeli kobikisa bango.