Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:43 - Mokanda na Bomoi

43 Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:43
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo, kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso.


Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te ; miso na bango ekangama, emonaka te ; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.


Yawe alobaki na ngai : — Kende koloba na bato oyo : « Boyoka na bino, kasi bokososola te ; botala na bino, kasi bokomona te !


Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani ? Nani akoyokela ngai ? Matoyi na bango ekangama ; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.


Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.


Kasi bayebi makanisi na Yawe te mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, Ye oyo asangisaki bango lokola maboke ya matiti ya ble na etando oyo batutelaka yango.


Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »


Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ;


Ngai, nayei na Kombo ya Tata na Ngai, kasi boboyi koyamba Ngai ! Nzokande, soki moto mosusu ayei na kombo na ye moko, bokoyamba ye.


Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?


Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.


Kasi bazalaki kososola te ete Yesu azalaki koloba na bango na tina na Tata.


Bazongiselaki Ye : — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto ; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi ?


Bazongisaki : — Ezali Abrayami nde azali tata na biso. Yesu alobaki na bango : — Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki.


Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu !


moto ya mayele azali te ; ata moto moko te alukaka Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ