39 Bazongisaki : — Ezali Abrayami nde azali tata na biso. Yesu alobaki na bango : — Soki bozalaki bana ya Abrayami, bolingaki kosala misala oyo Abrayami asalaki.
Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.
Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami : kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso,