Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?
Ondimi te ete nazali kati na Tata, mpe ete Tata azali kati na Ngai ? Maloba oyo nayebisaka bino, nalobaka yango te na bokonzi na Ngai moko ; ezali Tata oyo azali kati na Ngai nde azali kokokisa bongo misala na Ye.
pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo ; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai.
Yesu alobaki na bango lisusu : Nazali koloba na bino penza ya solo : Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala ; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.
Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
Nazali na makambo mingi ya koloba na tina na bino mpe ya kosambisa kati na bino ; kasi Ye oyo atindaki Ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na Ye, yango nde nazali koyebisa mokili.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.