Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:37 - Mokanda na Bomoi

37 Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami ; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:37
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »


Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye,


Ezali na mokolo wana nde bazwaki mokano ya koboma Yesu.


Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai ?


Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.


Boni, Moyize apesaki bino mibeko te ? Nzokande moko te kati na bino atosaka yango ! Bongo mpo na nini bozali koluka koboma Ngai ?


Na bongo, ndambo ya bavandi ya Yelusalemi bakomaki komituna : « Azali te moto oyo bazali koluka koboma ?


Bazongiselaki Ye : — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto ; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi ?


Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.


Tata na bino, Abrayami, atondaki na esengo, wana akanisaki ete akomona mokolo na Ngai. Amonaki yango mpe atondaki na esengo.


Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.


Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.


Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.


mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »


Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.


Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ