36 Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.
Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.
Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te opesaka ngai bososoli na yango.
Nani akoki kososola mabunga na ye oyo asali na nko te ? Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te !
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;
« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama
Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.
Pamba te moto oyo azalaki mowumbu tango abengamaki mpo na kosalela Nkolo azali mokangolami ya Nkolo ; ndenge moko mpe, moto oyo azalaki nsomi tango Nzambe abengaki ye azali mowumbu ya Klisto.
Sik’oyo, Nkolo azali Molimo ; mpe epai Molimo ya Nkolo azali, epai mpe bonsomi ezali.
Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.