Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi elongo na bato ya bikolo mosusu, oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda mpe bazalaki kogumbamela Nzambe, balandaki Polo mpe Barnabasi oyo bazalaki kosolola na bango mpe kondimisa bango ete batikala ya kokangama makasi na ngolu ya Nzambe.
Yango wana, sosola malamu boboto mpe kanda na Nzambe : kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe boboto epai na yo soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango. Soki te, yo mpe okokatama.
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito, pamba te lokola bakataki boyokani na Ngai, Ngai mpe napesaki bango mokongo, elobi Nkolo.
Kasi bino, bosimba makasi makambo oyo boyokaki wuta na ebandeli. Soki ezali penza kowumela kati na bino, bokowumela mpe kati na Mwana mpe kati na Tata.
Moto nyonso oyo azali kowumela te kati na mateya ya Klisto, kasi abimi libanda na yango, azali moko te na Nzambe ; nzokande moto oyo azali kowumela kati na mateya yango azali moko na Tata mpe na Mwana.
Kobanda lelo, soki botosi Yawe, soki bosaleli Ye, soki bobateli mitindo na Ye, mpe soki bino elongo na mokonzi oyo azali kokamba bino bolandi Yawe, Nzambe na bino, makambo nyonso ekotambola malamu.