30 Wana Yesu azalaki koloba bongo, bato mingi bandimaki Ye.
Mpe kuna, bato mingi bandimaki Yesu.
Kati na Bayuda oyo bayaki epai ya Mari, mingi kati na bango bandimaki Yesu tango bamonaki makambo oyo asalaki ;
Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala.
Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »
Boye kati na bato, mingi bandimaki Ye ; bazalaki koloba : — Boni, tango Klisto akoya, akosala bikamwa mingi koleka oyo moto oyo ozali kosala ?