Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:28 - Mokanda na Bomoi

28 Alobaki lisusu : — Sima na bino kotombola Mwana na Moto nde bokoyeba ete, Ngai, nazali oyo azali, mpe ete nasalaka eloko moko te na ndenge na Ngai moko, kasi nalobaka kolanda makambo oyo Tata ateyaki Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:28
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki na Moyize : — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. »


Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.


Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.


Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moko te akosa bino ! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki ! » Bolanda bango te.


Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso ; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. »


Namiyebiseli bino yango sik’oyo, liboso ete likambo yango esalema, mpo ete, tango likambo yango ekosalema, bondima ete nazali oyo azali.


na tina na bosembo, pamba te nakeyi epai ya Tata, mpe bokomona Ngai lisusu te ;


Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa.


Ezalaki na esika yango nde babakaki Yesu na ekulusu, elongo na bato mosusu mibale : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Nazali koloba na yo penza ya solo : tolobaka makambo oyo toyebi mpe topesaka litatoli na tina na makambo oyo tomoni ; kasi bino, boboyi kondima litatoli na biso.


Ndenge kaka Moyize atelemisaki na nzete, ekeko ya nyoka kati na esobe, ndenge wana mpe Mwana na Moto asengeli kotombolama


Yesu alobaki na ye : — Nazali Masiya, Ngai oyo nazali koloba na yo.


Yesu alobaki na bango lisusu : Nazali koloba na bino penza ya solo : Mwana akoki kosala eloko moko te na ndenge na Ye moko, kasi azali kosala kaka makambo oyo azali komona Tata na Ye kosala ; pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, yango mpe Mwana asalaka.


Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.


Kasi bazalaki kososola te ete Yesu azalaki koloba na bango na tina na Tata.


Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali.


Bato oyo bandimaki mateya ya Petelo bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato babakisamaki na lisanga ya bandimi.


Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango ; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano.


mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi : Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ