24 Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moko te akosa bino ! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki ! » Bolanda bango te.
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
Yesu alobaki na bango lisusu : — Ngai, nazali kokende ; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.
Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?
ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.