Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:23 - Mokanda na Bomoi

23 Yesu azongiselaki bango : — Bino, bozali bato ya se ; kasi Ngai, nawuti na Likolo. Bino, bozali bato ya mokili oyo ; kasi Ngai, nazali ya mokili oyo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:23
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka, nabatelaki kaka maloba na Yo mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.


Bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te.


Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na Moto.


Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso ; kasi moto oyo awuti na mokili akotikala kaka ya mokili mpe alobaka kaka lokola moto ya mokili. Ye oyo awuti na Likolo azali likolo na nyonso,


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ