Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:21 - Mokanda na Bomoi

21 Yesu alobaki na bango lisusu : — Ngai, nazali kokende ; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:21
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.


mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge ekolala elongo na ye kati na putulu.


Soki moto mabe akufi, elikya na ye mpe ekufi ; boye, elikya nyonso oyo etiami na bomengo na ye mpe ekufi.


Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.


Kuna, ekozala lisusu na mwana moke te oyo akokufa na bomwana na ye to ekozala lisusu na mobange te oyo akotonda te na mikolo ya bomoi na ye ; pamba te moto oyo akokufa elenge akozala na mibu nkama moko ya mbotama, mpe oyo akokokisa mibu wana te, akomonana lokola moto alakelami mabe.


Pamba te, nazali koloba na bino : Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! › »


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.


Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengeli kokufa.


Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.


Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »


Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna.


Alingi penza koloba nini tango azali koloba : « Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna ? »


Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.


Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ