Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 8:20 - Mokanda na Bomoi

20 Yesu alobaki bongo, wana azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, pene ya esika oyo bazalaki kotia makabo ; mpe moto ata moko te amekaki kokanga Ye, pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 8:20
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bakonzi minei ya bakengeli bikuke bazalaki Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kokengela bashambre mpe bomengo ya Ndako ya Nzambe.


Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.


Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki : — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila.


Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele.


Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo.


Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango ; kasi babangaki bato.


Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo ;


Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango.


Kasi Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.


Tango mikolo ya feti ekomaki na kati-kati, Yesu akendeki na Tempelo mpe akomaki koteya.


Na bongo, balukaki kokanga Yesu, kasi moto ata moko te alongaki ; pamba te tango na Ye ekokaki nanu te.


Bamosusu kati na bango balukaki kokanga Ye, kasi moto ata moko te alongaki.


Bino, bokende na feti wana ; kasi Ngai, nakokende te, pamba te tango na Ngai ekoki nanu te.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo ; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.


Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ