5 Pamba te, ezala bandeko ya Yesu, bango mpe bazalaki kondima Ye te.
Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye.
Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : — Akomi na bokono ya liboma.
Nzokande, tango bandeko na Ye bakendeki na feti, Ye mpe akendeki kuna, na komilakisa te, kasi na nkuku.
Bandeko ya Yesu balobaki na Ye : — Longwa awa na Galile mpe kende na Yuda, mpo ete bayekoli na Yo bamona kuna bikamwa oyo ozali kosala.
Moto moko te asalaka na nkuku soki alingi koyebana. Lokola ozali kosala makambo minene koleka, sala ete moto nyonso kati na mokili ayeba soki ozali nani.