Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
Tala, azali koloba na bonsomi nyonso, mpe bazali koloba na ye eloko moko te mpo na kotelemela ye ! Boni, bokanisi ete bakonzi na biso bayebi ete azali penza Klisto ?
Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.