Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:42 - Mokanda na Bomoi

42 Boni, Makomi ezali koloba te ete Klisto akobimela na libota ya Davidi mpe akobotama na Beteleemi, mboka ya Davidi ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:42
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salima, tata ya Beteleemi ; mpe Arefi, tata ya Beti-Gaderi.


Yawe alapaki epai ya Davidi ndayi ya solo, oyo akowangana te : « Nakotia moko kati na bakitani na yo na kiti na yo ya bokonzi.


Olobaki : « Nasali boyokani elongo na moponami na ngai, nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi :


Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ; wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.


« Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, mokonzi oyo akokamba na bwanya, oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami :


Bazongiselaki ye : — Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma :


« Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »


Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo.


Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi.


Kasi biso, toyebi epai moto oyo awuti ; nzokande tango Klisto akoya, moto moko te akoyeba soki azali moto ya engumba nini ! »


Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.


Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.


Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye : — Boni, koya na yo ezali ya kimia ?


Saulo atunaki Davidi : — Ozali mwana ya nani ? Elenge mobali Davidi azongisaki : — Nazali mwana ya mosali na yo, Izayi, moto ya Beteleemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ