41 bamosusu : « Azali Klisto, » kasi bamosusu lisusu : « Boni, Klisto akoki kobimela na Galile ?
Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya ! »
Natanaele atunaki ye : — Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ? Filipo azongiselaki ye : — Yaka mpe okomona yo moko.
Natanaele alobaki : — Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.
Mwasi alobaki na Yesu : — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.
— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?
Bongo balobaki na mwasi wana : — Tondimi kaka te mpo na makambo oyo olobaki, pamba te biso moko toyoki sik’oyo mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili.
Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.
Kasi biso, toyebi epai moto oyo awuti ; nzokande tango Klisto akoya, moto moko te akoyeba soki azali moto ya engumba nini ! »
Boye kati na bato, mingi bandimaki Ye ; bazalaki koloba : — Boni, tango Klisto akoya, akosala bikamwa mingi koleka oyo moto oyo ozali kosala ?
Bazongiselaki ye : — Boni, yo mpe ozali moto ya Galile ? Kundola malamu Makomi, mpe okomona penza ete mosakoli moko te abimela na Galile. [