40 Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, »
Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !
Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !
Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.
Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »
Kati na bato, tembe ekomaki makasi na tina na Ye. Bamoko bazalaki koloba : Azali moto malamu ; bamosusu : « Te, azali kokosa bato nyonso. »
Tango Polo asilisaki koloba, Bayuda bakendeki, mpe bazalaki kotiana tembe makasi kati na bango.]