39 Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.
Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka ; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.
Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »
Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.
Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye.
Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;
Yesu azongiselaki bango : — Soki namipesaki Ngai moko lokumu, lokumu na Ngai elingaki kozala na tina te. Kasi ezali Tata na Ngai, Ye oyo bino bozali koloba ete azali Nzambe na bino, nde azali kopesa Ngai lokumu.
« Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ; bilenge na bino bakozwa bimoniseli, mibange na bino bakolota bandoto.
Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.
Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.