Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:37 - Mokanda na Bomoi

37 Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:37
50 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo ; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti.


Nasemboli maboko na ngai epai na Yo ; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.


Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi, ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.


Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.


Bwanya azali koganga na libanda, atomboli mongongo na ye na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;


Boni, Bwanya azali kobelela te ? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te ?


Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.


azali koganga pene ya bikuke, na ekotelo ya engumba :


Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba :


Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema ; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.


Yango wana, botoka mayi na esengo na etima ya lobiko.


Boloba kati na Yelusalemi, boyebisa ye ete minyoko na ye ekomi na suka, masumu na ye esili kolimbisama, pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe ngolu koleka mbala mibale mpo na masumu na ye nyonso.


Mongongo moko elobi : « Belela ! » Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.


Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka ; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.


« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali ; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia ; boya kosomba vino mpe miliki : ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !


Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.


Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.


« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.


Bipai nyonso mayi yango ezalaki koleka, bikelamu nyonso ya bomoi ezalaki kobotana, bambisi mpe ezalaki kobotana ebele ; pamba te mayi yango ezalaki kokoma kuna mpe kopetola mayi ya ebale monene. Bongo na esika nyonso oyo mayi yango ezalaki koleka, nyonso ezalaki kozwa bomoi.


Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala.


Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, sima na kobuka bambuma ya mabele, bokosala feti mpo na Yawe, mikolo sambo. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya mwambe ekozala mikolo ya kopema.


Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba ! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango !


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango. Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga, bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga, bakotonda lokola kopo ya makila oyo basopaka na basonge ya etumbelo.


Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani monene mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.


Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.


Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike ! › »


Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama !


Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki : — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe : « Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! »


Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.


Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.


Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ?


kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.


kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.


Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.


Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.


Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka.


Kaka na tango yango, wana Yesu azalaki koteya kati na Tempelo, alobaki na mongongo makasi : — Solo, boyebi Ngai mpe boyebi epai nawuti ! Nzokande, nayei na ndenge na Ngai moko te ; ezali Ye oyo azali penza ya solo nde atindi Ngai, mpe bino, boyebi Ye te.


Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.


mpe bamelaki bango nyonso mayi ya molimo ya ndenge moko ; pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo, oyo ezalaki kotambola elongo na bango ; mpe libanga yango ezalaki Klisto.


Ndenge moko mpe, sima na Ye kolia, azwaki kopo mpe alobaki : « Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai ! Tango nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. »


Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.


Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,


Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ