Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:36 - Mokanda na Bomoi

36 Alingi penza koloba nini tango azali koloba : « Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:36
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato bazongiselaki Ye : — Mibeko ezali kolakisa biso ete Klisto asengeli kozala na bomoi seko na seko. Bongo ndenge nini yo olobi na biso : « Mwana na Moto asengeli kotombolama ? » Nani nde Mwana na Moto ?


Bana na Ngai, natikali na tango moke kaka ya kozala lisusu elongo na bino. Bokoluka Ngai ; mpe makambo oyo nalobaki na Bayuda, yango mpe nazali koyebisa bino sik’oyo : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna. »


Nikodemi atunaki Ye : — Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu ? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu ?


Nikodemi atunaki lisusu : — Ekosalema ndenge nini ?


Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki : « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. »


Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe ; bazalaki koloba : — Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango ?


Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?


Bokoluka Ngai, kasi bokomona Ngai te ; mpe epai Ngai nakozala, bino, bokoki te koya kuna.


Yesu alobaki na bango lisusu : — Ngai, nazali kokende ; mpe bokoluka Ngai, kasi bokokufa kati na lisumu na bino. Epai Ngai nazali kokende, bino, bokoki te koya kuna.


Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ