32 Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [
Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka.
Mbala moko, mokonzi ya bakengeli akendeki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga.