Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:31 - Mokanda na Bomoi

31 Boye kati na bato, mingi bandimaki Ye ; bazalaki koloba : — Boni, tango Klisto akoya, akosala bikamwa mingi koleka oyo moto oyo ozali kosala ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:31
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso bakamwaki mpe bazalaki koloba : — Boni, moto oyo azali mwana ya Davidi te ?


Nkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa : bandimaka kaka mpo na mwa tango moke ; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.


Kati na Bayuda oyo bayaki epai ya Mari, mingi kati na bango bandimaki Yesu tango bamonaki makambo oyo asalaki ;


pamba te likolo na ye, Bayuda ebele bazalaki kokabwana na Banganga-Nzambe mpo na kondima Yesu.


Nzokande, kati na bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki Ye ; kasi balakisaki te kondima na bango na polele, pamba te bazalaki kobanga ete Bafarizeo babengana bango na ndako ya mayangani,


Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.


Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.


— Boya kotala moto oyo ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. Akoki kozala Klisto te ?


Bato mingi ya Samari, oyo bazalaki kovanda kati na engumba wana bandimelaki Yesu mpo na litatoli oyo mwasi azalaki kopesa : « Ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaki. »


Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli.


Tala, azali koloba na bonsomi nyonso, mpe bazali koloba na ye eloko moko te mpo na kotelemela ye ! Boni, bokanisi ete bakonzi na biso bayebi ete azali penza Klisto ?


Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.


Simona mpe andimaki mpe azwaki libatisi ; azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalema na miso na ye.


Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ