Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bandeko ya Yesu balobaki na Ye : — Longwa awa na Galile mpe kende na Yuda, mpo ete bayekoli na Yo bamona kuna bikamwa oyo ozali kosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye.


Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.


Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye.


Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : — Akomi na bokono ya liboma.


Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu.


Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele.


Moto moko ayebisaki Ye : — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.


Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.


Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?


Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.


Nzokande, tango bandeko na Ye bakendeki na feti, Ye mpe akendeki kuna, na komilakisa te, kasi na nkuku.


Moto moko te asalaka na nkuku soki alingi koyebana. Lokola ozali kosala makambo minene koleka, sala ete moto nyonso kati na mokili ayeba soki ozali nani.


Pamba te, ezala bandeko ya Yesu, bango mpe bazalaki kondima Ye te.


Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.


Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ