Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.
Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? › elobi Yawe.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.
Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?
Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? »