Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:24
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe ?


Moto oyo alongisaka bato mabe mpe moto oyo akweyisaka bato ya sembo bazali, bango mibale, nkele na miso ya Yawe.


Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya : Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.


bazwaka kanyaka mpo na kolongisa moto mabe mpe bazangisaka na moto ya sembo bosembo na ye !


Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo.


— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.


Na bongo, ndambo ya bavandi ya Yelusalemi bakomaki komituna : « Azali te moto oyo bazali koluka koboma ?


Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto ; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te.


Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.


Bandeko na ngai, bosangisaka te kopona bilongi mpe kondimela Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo atonda na nkembo.


boni, wana boponi bilongi te kati na bino, mpe bokomi te koyekola bato na nzela ya makanisi mabe ?


Kasi soki bozali kopona-pona bilongi, bozali kosala masumu, mpe Mobeko ezali kokweyisa bino mpo ete bozali kotosa yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ