Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu : — Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?


Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki : — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.


Kasi Bafarizeo bazalaki koloba : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! »


Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?


Bayuda bazongiselaki Ye : — Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.


Yesu azongisaki : — Nazali na molimo mabe te kati na Ngai. Ngai nazali nde kopesa Tata na Ngai lokumu, kasi bino bozali kotiola Ngai.


Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !


Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye : — Ozali na liboma, Polo ! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ