Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kati na bato, tembe ekomaki makasi na tina na Ye. Bamoko bazalaki koloba : Azali moto malamu ; bamosusu : « Te, azali kokosa bato nyonso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:12
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?


Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.


mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »


Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.


Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : — Moto oyo azalaki penza sembo !


Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo,


Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.


Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !


Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »


Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba na se se na tina na Yesu. Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo batindaki bakengeli ya Tempelo mpo na kokanga Yesu.


Bafarizeo batunaki lisusu : — Bino mpe bomitiki penza mpo ete akosa bino ?


Bazongiselaki ye : — Boni, yo mpe ozali moto ya Galile ? Kundola malamu Makomi, mpe okomona penza ete mosakoli moko te abimela na Galile. [


Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.


Solo, Barnabasi azalaki moto malamu, azalaki atondisama na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele bakangamaki na Nkolo.


Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo ; tango mosusu, moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu.


Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ