11 Wana bazalaki kati na feti, Bayuda bazalaki koluka Ye mpe bazalaki kotuna-tuna : « Azali wapi ? »
Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?
Bazalaki koluka Yesu mpe kotunana bango na bango kati na lopango ya Tempelo : — Bokanisi nini ? Akoya penza na feti ?
Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.
Kasi, lokola bango nyonso bazalaki kobanga Bayuda, moto ata moko te akokaki koloba na bonsomi nyonso na tina na Yesu.
Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana : — Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye ?
Batunaki ye lisusu : — Moto yango azali wapi ? Azongisaki : — Nayebi te !