Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 7:1
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo : bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.


Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »


Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bayokaki makambo yango mpe bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; bazalaki kobanga Ye, pamba te ebele ya bato bazalaki kokamwa malakisi na Ye.


Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?


Boye, alongwaki na Yuda mpe azongaki na Galile.


Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.


Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade.


Wana bazalaki kati na feti, Bayuda bazalaki koluka Ye mpe bazalaki kotuna-tuna : « Azali wapi ? »


Kasi, lokola bango nyonso bazalaki kobanga Bayuda, moto ata moko te akokaki koloba na bonsomi nyonso na tina na Yesu.


Boni, Moyize apesaki bino mibeko te ? Nzokande moko te kati na bino atosaka yango ! Bongo mpo na nini bozali koluka koboma Ngai ?


Na bongo, ndambo ya bavandi ya Yelusalemi bakomaki komituna : « Azali te moto oyo bazali koluka koboma ?


Bayuda balobanaki bango na bango : — Asengeli kokende wapi mpo ete tomona ye lisusu te ? Akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana kati na Bagreki mpe koteya Bagreki ?


Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abrayami ; nzokande, bozali koluka koboma Ngai, pamba te boboyi koyamba Liloba na Ngai.


Kasi sik’oyo, na esika ete bosala yango, bozali koluka koboma Ngai, Ngai oyo nalobi na bino solo oyo nayokaki epai ya Nzambe ! Abrayami atikala kosala bongo te.


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ