Elize alobaki : — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. »
Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
Tango nakataki mapa mitano mpo na kokabolela bato nkoto mitano, bozongaki na motango boni ya bitunga etonda na biteni ya mapa, sima na kokabolela bato ? Bazongisaki : — Bitunga zomi na mibale.
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki : — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.
Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !
Filipo azongiselaki Yesu : — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.
miliki ya bangombe mpe ya bameme ; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.
Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi ; ezalaki koloba : « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. »