Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:66 - Mokanda na Bomoi

66 Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:66
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.


Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.


Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.


Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.


Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?


Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye.


Bandeko ya Yesu balobaki na Ye : — Longwa awa na Galile mpe kende na Yuda, mpo ete bayekoli na Yo bamona kuna bikamwa oyo ozali kosala.


Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye : — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,


Oyebi malamu ete bato nyonso oyo bazali kati na mokili ya Azia bakimaki ngai ; kati na bango, tozali na Fijele mpe Erimojene.


Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.


Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima ; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ