Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:64 - Mokanda na Bomoi

64 Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:64
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.


kasi bino, boboyi na bino kondima, pamba te bozali bameme na Ngai te.


Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango : — Bozali koluka nani ?


Kutu nayebi bino malamu, nayebi ete, kati na mitema na bino, bozali na bolingo te mpo na Nzambe.


Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te.


Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?


Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango ; alobaki na bango : — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku ?


Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.


Yesu azongiselaki bango : — Bino, bozali bato ya se ; kasi Ngai, nawuti na Likolo. Bino, bozali bato ya mokili oyo ; kasi Ngai, nazali ya mokili oyo te.


Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.


Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.


Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ