58 Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.