Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:55 - Mokanda na Bomoi

55 Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:55
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato mingi bazali kotuna : « Nani akomemela biso bolamu ? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.


Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye : — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !


Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.


Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga.


Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo.


Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai, azali na bomoi ya seko ; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.


Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na ye.


Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye : — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,


Boye, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi.


Kuna na Likolo, asalaka mosala na Ye kati na Esika ya bule, elingi koloba : Mongombo ya solo, oyo Ye moko Nkolo atonga, kasi bato te.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ