51 Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.