Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko.
Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.
Natanaele atunaki Ye : — Oyebi ngai ndenge nini ? Yesu azongiselaki ye : — Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.
Bino bolobaka : « Etikali sanza minei mpo ete tobuka mbuma kati na bilanga. » Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bofungola miso na bino mpe botala malamu bilanga ; bambuma ekomeli mpe ekoki mpo na kobuka.