Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo ; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko ; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai.
Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.