Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:42 - Mokanda na Bomoi

42 Bakomaki koloba : — Boni, wana ezali Yesu te ? Ezali mwana mobali ya Jozefi te ? Toyebi malamu tata mpe mama na ye ! Bongo ndenge nini azali koloba : « Nawuti na Likolo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:42
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.


Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?


Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.


Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na Moto.


Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Yesu azongiselaki bango : — Botika koyimayima kati na bino !


Bongo ekozala ndenge nini soki bomoni Mwana na Moto kozonga epai Ye azalaki liboso ?


mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !


Moto ya liboso asalemaki na putulu ya mabele, azali moto ya mabele ; kasi moto ya mibale awutaka na Likolo.


Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ