Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:41 - Mokanda na Bomoi

41 Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki : « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:41
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba : — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.


Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba : — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?


Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.


Yesu azongiselaki bango : — Botika koyimayima kati na bino !


Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.


Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki : — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango ?


Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.


Kati na bato, tembe ekomaki makasi na tina na Ye. Bamoko bazalaki koloba : Azali moto malamu ; bamosusu : « Te, azali kokosa bato nyonso. »


Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.


Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ