40 Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
Pamba te akolaki liboso na Ye lokola nzete ya moke, lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; azalaki ata na kitoko to lokumu te oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye.
Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino.
Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.
mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
Mpo na kondima, Moyize abangaki te kanda ya mokonzi mpo na kobima longwa na Ejipito, mpe atikalaki ngwi na mokano na ye lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te.
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,