36 Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te.
Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »
Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te
Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai.
Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa.
Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?
Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.
Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye.