Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama : « Apesaki bango lipa kowuta na Likolo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:31
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.


Opesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi.


Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.


Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana.


Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo.


Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki,


Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali : ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka ; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko.


baliaki bango nyonso bilei ya molimo ya ndenge moko,


Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe.


Mokolo oyo elandaki mokolo oyo baliaki biloko ya mokili ya Kanana, mana etikaki kokweya ; mana ezalaki lisusu te mpo na bana ya Isalaele. Boye, na mobu wana, baliaki biloko ya mokili ya Kanana.


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ