Mawa na bato oyo balobaka : « Tika ete Nzambe asala noki, tika ete asala na lombangu mosala na Ye mpo ete tomona yango ! Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisama mpo ete tokoka koyeba yango ! »
Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.
Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.
Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.