Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:29 - Mokanda na Bomoi

29 Yesu azongiselaki bango : — Mosala ya Nzambe, yango oyo : bondima Ye oyo Nzambe atindaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:29
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.


Moto nyonso oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko ; nzokande moto oyo aboyi kondima Mwana akozwa bomoi yango te, kasi azalaka kaka na se ya etumbu ya Nzambe.


Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,


Batunaki Ye lisusu : — Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso ?


Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.


Bazongisaki : — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.


Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko ;


Tala ndenge kondima mpe misala na ye ezalaki kosala elongo ; mpe na nzela ya misala yango, kondima na ye ekomaki ya kokoka.


Mpe tala mobeko oyo apesa biso : kondima Yesu-Klisto, Mwana na Ye, mpe kolingana biso na biso, ndenge atindaki biso.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ