Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.
Tango bato bamonaki ete, ezala Yesu to bayekoli na Ye, moko te azalaki lisusu wana, bamataki na babwato yango mpe bakendeki koluka Yesu, na Kapernawumi.
Bongo Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bolie nzoto ya Mwana na Moto te mpe bomeli makila na Ye te, bozali na bomoi te kati na bino.
Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.
Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.
mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.