Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 6:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 6:2
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso.


Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili.


Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.


Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.


Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.


Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende.


Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki : — Tosala nini ? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.


Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango.


Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te


Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.


Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala.


Yesu asalaki lisusu, na miso ya bayekoli na Ye, bikamwa mosusu mingi oyo ekomami te kati na buku oyo.


Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.


Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »


Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye ; bayekoli bakendeki bango moko kaka.


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa.


Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ