19 Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango.
Bato yango bamipesaki nanu na koluka nkayi, na makasi na bango nyonso, mpo na komema masuwa na mokili, kasi balongaki te, pamba te mopepe etelemelaki bango makasi.
Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale.
Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.
Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato.
Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba : ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda.